Luke 7

Yesu abikisi mosali ya mokonzi ya basoda

(Mt. 8.5-13 ; Jn. 4.46-54)

1Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana nyonso na bato, akendaki na Kapenawumi.

2Mokonzi moko ya basoda ya Roma, azalaki na mosali na ye moko oyo azalaki kolinga mingi ; mosali yango azalaki maladi mpe alingaki kokufa. 3Tango ayokaki sango ya Yesu, atindelaki ye ndambo ya bampaka ya Bayuda, mpo na kobondela ye ete aya kobikisa mosali na ye. 4Tango bakomaki epai ya Yesu, babondelaki ye mingi penza :

—Moto oyo akoki penza mpo osalela ye bongo ;
5pamba te alingaka ekolo na biso mpe atongela biso ndako ya mayangani.

6Bongo Yesu akendaki elongo na bango. Kasi tango akomaki pene-pene ya ndako, mokonzi ya basoda ya Roma atindaki baninga na ye mpo baloba na Yesu :

—Nkolo komitungisa te, pamba te nazali ya kokoka te mpo okota na ndako na ngai.
7Yango wana, namonaki ete nazali ya kokoka te mpo naya epai na yo. Kasi loba liloba moko mpe mosali na ngai akobika. 8Pamba te ngai moko mpe, nazali na bakonzi liboso na ngai, mpe basoda na nse ya bokonzi na ngai. Soki nalobi na moko : “Kende !”, akendaka ; mpe na mosusu : “Yaka !”, ayaka. Mpe soki nalobi na mosali na ngai : “Sala mosala oyo”, asalaka yango. 9Tango Yesu ayokaka maloba oyo, akamwaki mingi penza mpo na ye, abalukaki epai ya ebele ya bato oyo bazalaki kolanda ye, mpe alobaki :

—Nalobi na bino, naino namoni kondima ya monene boye te ata na Isayele !

10Tango bato oyo mokonzi ya basoda ya Roma atindaki bazongaki na ndako, bakutaki mosali yango asilaki kobika.

Yesu asekwisi elenge mobali

11Mokolo oyo elandaki, Yesu akendaki na vile moko kombo na yango : Nayina. Bongo bayekoli na ye mpe bato ebele penza bakendaki na ye elongo. 12Awa akomaki pene-pene na porte ya vile, akutani na bato bazalaki kokende kokunda elenge mobali moko ; Ye azalaki mwana se moko kaka ya mama na ye, mpe mama yango azalaki mwasi akufela mobali. Bato mingi penza ya vile wana bazalaki elongo na ye. 13Tango Nkolo amonaki mwasi oyo akufela mobali, ayokelaki ye mawa mingi penza ; mpe alobaki na ye :

—Kolela te !

14Apusanaki mpe asimbaki sanduku, bongo bato oyo bazalaki komema yango batelemaki ; Yesu alobaki :

—Elenge mobali, nalobi na yo, telema !

15Mokufi alamukaki, afandaki mpe abandaki koloba. Bongo Yesu azongisaki ye na mama na ye. 16Bato nyonso batondaki na kobanga, babandaki kokumisa Nzambe, mpe koloba :

—Moprofeta monene abimi kati na biso, mpe Nzambe aye kosalisa bato na ye !

17Sango oyo mpo na Yesu epanzanaki na mokili ya Yudea mobimba, mpe na bamboka ya pembeni.

Yesu mpe Jean Batiste

(Mt. 11.2-11)

18Bayekoli ya Jean bayebisaki Jean makambo wana nyonso. Bongo abengaki bayekoli na ye mibale, 19mpe atindaki bango epai ya Nkolo mpo batuna ye :

—Ozali moto oyo asengeli koya, to tosengeli kozela moto mosusu ?

20Tango bakomaki epai ya Yesu, balobaki na ye :

—Jean Batiste moto atindi biso epai na yo mpo totuna yo : “Ozali moto oyo asengeli koya to tosengeli kozela moto mosusu ?”

21Kaka na tango wana, Yesu abikisaki bato mingi oyo bazalaki na bapasi, maladi, mpe baoyo bazalaki ya kokangama na milimo mabe ; mpe afungolaki miso ya bato mingi oyo bazalaki bakufi miso. 22Bongo Yesu azongisaki eyano oyo na bayekoli oyo Jean atindaki :

—Bokende mpe boyebisa Jean makambo oyo bomoni mpe boyoki : bato bakufa miso bazali komona, bato bakufa matoyi bazali koyoka, bato batambolaka tengu-tengu bazali kobika, bato ya maladi ya maba bazali kokoma peto, bato bakufa bazali kosekwa, mpe Sango Malamu ezali koteyama epai ya babola.
23Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te mpo na ngai !

24Tango bato oyo Jean atindaki bakendaki, Yesu abandaki koloba na bato mpo na Jean :

—Eloko nini bokendaki kotala na esobe ? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai ?
25Bongo bokendaki kotala nani ? Moto moko alati bilamba ya kitoko ? Te, bato oyo balataka bilamba ya kitoko mpe bazali na bomengo, bavandaka na bandako ya bakonzi minene, 26Bongo bokendaki kotala nani ? Moprofeta ? Ya solo nalobi na bino, ye aleki kutu moprofeta. 27Jean azali moto oyo ekomama boye mpo na ye : Nakotinda ntoma na ngai liboso na yo,
Oyo akobongisa nzela na yo liboso na yo.

28Pamba te nalobi na bino, na kati ya bato oyo babotama na mwasi, moto aleki Jean na bonene azali te. Nzokande moto ya suka na kati ya Bokonzi ya Nzambe aleki ye na bonene.

(Mt. 11.16-19)

29Bato nyonso, ata bafutisi mpako, tango bayokaka maloba ya Yesu, bandimaki ete nzela ya Nzambe ezali sembo, mpo bazwaki libatisi epai ya Jean. 30Kasi bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko baboyaki makambo oyo Nzambe alingaki kosala mpo na bango, pamba te bazwaki te libatisi epai ya Jean.

31Bato ya tango oyo bakokani na banani ? Bazali lokola banani ? 32Bakokani na bana mike oyo bavandi na zando monene, mpe bazali ko lobana moko na moko : Tobetelaki bino flute kasi bobini te ;
toyembelaki bino banzembo ya ebembe
kasi bolelaki te !

33Pamba te, Jean Batiste ayaki, azalaki kolia limpa te, mpe komela vino te ; bolobaki : “Azali na molimo mabe !”

34Bongo Mwana ya Moto aye, azali kolia mpe komela, kasi bolobi : “Azali lokoso mpe momeli ble, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu.”

35Kasi bwania ezali komonana ete ezali sembo na nzela ya bana na ye nyonso.

Yesu mpe mwasi ya masumu

36Mofarizeo moko abengaki Yesu mpo alia na ye elongo. Bongo Yesu akendaki na ndako ya Mofarizeo mpe avandaki na mesa mpo na kolia. 37Tango mwasi moko oyo ayebanaki na vile mpo na bomoi na ye ya mabe, ayokaki ete Yesu azalaki kolia na ndako ya Mofarizeo, ayaki na molangi moko ya albatre
Albatre  : tala Matayo 26.7
oyo ezalaki ya kotonda na malasi,
38pene-pene na makolo ya Yesu, azalaki kolela, mpe kopolisa yango na mayi ya miso na ye, bongo abandaki kopangusa yango na suki na ye. Azalaki mpe kopesa yango beze mpe kosopela yango malasi.

39Tango mofarizeo oyo abengisaki Yesu amonaki bongo, alobaki na nse ya motema : Soki moto oyo azalaki moprofeta, mbele alingaki koyeba soki nani azali kosimba ye mpe soki azali mwasi ya ndenge nini ; pamba te azali moto ya masumu !

40Yesu azongiselaki ye :

—Simon, nazali na likambo ya koyebisa yo. Ye alobaki : —Moteyi, loba yango.

41—Bato mibale bazalaki na nyongo ya moto moko : oyo ya liboso asengelaki kozongisa : badeni nkama mitano, mpe oyo ya mibale : badeni ntuku mitano, 42Kasi lokola bango mibale bazangaki mbongo ya kozongisa, moto oyo adefisaki bango mbongo alimbisaki bango mpo bafuta nyonso yango te. Yo okanisi nini, na kati na bango mibale nani akolinga ye mingi ? 43Simon azongisaki :

—Nakanisi, oyo balimbisi nyongo mingi Bongo Yesu alobaki : Okati likambo malamu !

44Sima, abalukaki epai ya mwasi, mpe alobaki na Simon :

—Omoni mwasi oyo ? Tango nakotaki na ndako na yo, opesaki ngai mayi te mpo na makolo na ngai ; kasi ye, apolisi yango na mayi na ye ya miso, mpe apangusi yango na suki na ye.
45Opesaki ngai beze te, kasi ye banda nakotaki awa, atiki te kopesa makolo na ngai beze. 46Osopelaki motu na ngai mafuta te, kasi ye, asopeli makolo na ngai malasi. 47Yango wana nalobi na yo, masumu na ye mingi oyo azalaki na yango elimbisami, pamba te alakisi bolingo monene. Kasi moto oyo balimbisi moke, akolakisa mpe bolingo moke !

48Bongo Yesu alobaki na ye :

—Masumu na yo elimbisami !

49Bato oyo bazalaki na ye na mesa babandaki koloba na nse ya mitema :

—Yango ye azali nani mpo alimisa ata masumu ?

50Bongo Yesu alobaki na mwasi yango :

—Kondima na yo ebikisi yo, kende na kimya !
Copyright information for LinMNB